Riches NK

Riches NK

Partager

La solidarité

16/08/2023
08/08/2023

Mieux vaut prendre ses distances pour préserver sa dignité que d'être présent et perdre sa valeur
Ruches NK 🙏

19/06/2022

Riches NK

Riches NK La solidarité

02/06/2022

Yeah❤️

25/04/2022

Bon début de la semaine à tous 🤩😍🥰

15/04/2022

KB9 😍

07/04/2022

Leader 🌎

28/03/2022

Bon début de la semaine à tous !

28/03/2022

Yeah salut mes loulous
J'espère que vous êtes tous bien, je vous prie d'Aimé ma page renommée Riches NK ❤️ ça me fera du bien
Bon journée 😍

28/03/2022

LA FILLE DU DIABLE


ÉPISODE : 15

❣️❣️ YVAN ❣️❣️

Profile pictures 28/03/2022

INGRATITUDE D'AMOUR
________________________
ÉPISODE : 2

Dina: lionel tia yango na mutu nayo que muasi aza ndeko nayo te
Lionel : maman nayebi mais mabe nini nga na sali wana gloria aza muasi nanga kala te nazo kende ko bala ye alors mabe nini nga na sali pona kaka na pesi maman naye mbongo asala ba examen

Dina : mais makambu osali pona yo eza normal vraiment ndeko nayo bazo bengana ye na école yo ozo zua mbongo ozo kende ko pesa famille ya muasi nayo na place opesa leki nayo akende ko futa na école

Lionel : maman nga moko nayebi nako pesa jorna mbongo lobi soki na bimi musala
Dina: mais mbala sima ko salaka lisusu bongo te ba lingaka muasi makasi bongo te yo na moni ata nga nazo bela nakomi grave yo oza na mbongo oko pesa maman ya muasi nayo nga oko loba nanga na zela

Lionel : hum jamais maman nga nakoki kosala ngo te
Dina: malamu ezala kaka ndenge olobi bongo

Lionel : maman na lingaka yo osilika te na tikala kaka nayo
Dina: kasi yo moko mutu ozo sala nga na silika ti

Lionel: naza désolé maman
Dina: d'accord nayoki yo kasi
Lionel : maman bo lambi nini
Dina: petite soeur nayo mutu alambi cuisse na loso kaka
Lionel : sava maman na lia nanu kasi naza penza na nzala makasi
Dina: sava ngape nazo bongisa nanu bilamba kasi

***Lionel ake ko lia

Chez gloria

Gloria : maman mariage nanga il faut ezala na salle de fête oyo ba sali sika wana na kendaki ko visite yango eza penza kitoko makasi
Naomi : salle de fête oyo wapi oyo ba sali na coin na biso wana

Gloria : oui maman wana eza penza kitoko makasi na sepelaki nango makasi
Namoni : ko sepela nango eza problème te eza nde likambu ya mbongo mobali nayo asalaka naye na compagnie te aza naye kaka mécanicien donc il faut bozua salle moko oyo eza na prix moko ya bien parce que oyo ezo monana eza penza chère makasi

Gloria : mais maman lionel ye moko pe andimaki déjà
Naomi : lokola déjà andimaki naye wana eza na problème te mais yope il faut osungaka ye lionel azo sala mingi

Gloria : maman na sunga ye na nini ?
Naomi : oluka ata eloko moko obanda ko teka ekosala bien

Gloria : yango lionel alobaki nanga nazo zela apesa nga mbongo comme ça na banda ata ko défisa ba mapapa
Naomi: oui eza aide moko ya bien parce que musapi moko esokolaka elongi te

****Au moment où bazo solola téléphone ya gloria esonné

Gloria : allô mon amour
Lionel : allô position
Gloria : kayo déjà oza na ndaku ?
Lionel : oui naza déjà na ndaku boni maman asali examen yango ?

Gloria : oui déjà asalaki mais na kendaki nanga kozua ba résultats te
Lionel: mais pourquoi ?
Gloria : nazalaki yako lemba
Lionel: sava nakoya kasi lobi na tongo comme ça to kende ko zua ba résultats yango kasi
Gloria : sava mon amour

Appel off

Naomi: wana lionel ?
Gloria : oui
Naomi : alobi nini
Gloria : abandaki ko tuna nga soki déjà nazuaki ba résultats nayo ya examen
Naomi : yope oza kaka mutu ya négligence vraiment banda kala o silisaki ko lamba pona okende ko zua ngo ozo ko milembisa lokola muasi ya zemi

Gloria : maman alobi que lobi ye moko akoya to kende kozua yango
Naomi : tala kutu mutu mususu aza na soucis nanga mais bino moko kutu bozo kipe yango te surtout yaya nayo ye kutu vraiment nasala perte penza ndenge na bota muana lokola ye
Gloria : maman aza kaka muana nayo nzambe mutu alingaki obota muana mobali

***Fabrice akoti na ndaku

Fabrice : bozo tonga nga hein
Naomi : tala kupe munene lokola ba pêcheurs ya maluku yo penza bako tonga yo pona to zua nini

Gloria : eeeeeeeh maman oza somo hein ata kutu ba fingaka ngo
Fabrice : ata ofingi nga problème te mais nga naza kaka papa ya ndaku oyo
Naomi : papa pona osalaka nini awa
Fabrice : maman naza na posa ko loba te gloria pesa nga biloko nanga na lia

Naomi: yoka kaka pe soni tsi na âge nayo vraiment
Fabrice : maman zela na lia nanu après olobela nga kasi

Tongo ekoki

Chez Lionel

Jorna : bonjour yaya
Lionel : oui bonjour pourquoi olamuki avant boye ?
Jorna : parce que nayebi yo obimaka nayo avant yango na lamuki tongo boye pona opesa nga mbongo ya minerval

Lionel : na yebisaki maman que nako pesa yo lelo soki na zongi boye
Jorna : yaya ata yo moko penza lelo lisusu na raté vraiment ba examen ba ninga bazo sala ba examen nga na vanda kk na ndaku vraiment

Lionel : zala mutema ya ko kita yaya ake ko lukela yo mbongo
Jorna : yaya nga soki kaka lelo opesi nga mbongo te nako tanga nga lisusu te parce que nakomi ko lemba nanga vraiment
Lionel : ko lemba te jorna lelo nako pesa yo ata ba récupération oko sala kaka eza nango problème te
Jorna : sava kasi nayoki nzambe asunga yo
Lionel : amen maman akendaki église ya tongo soki aye yebisa ye que na bimi nanu mbongo déjà na pesaki ye

***Lionel abimi akeyi

Quelques minutes après akomi chez ba gloria

Lionel : bonjour
Fabrice : bonjour boni santé ?
Lionel : oui santé kitoko nayo
Fabrice : oui kimia eza nango mais ozo monana te boye nini

Lionel : naza nanga misala nde ezo lia nga temps yango omoni nazo monana te

Fabrice : na moni kaka mais à part ça ?
Lionel : non nzambe azo batela gloria aza ?
Fabrice : oui awuti ko sokola kaka sikoyo j'espère que azo lata bilamba
Lionel : ebongo maman ?
Fabrice : yepe aza naye na ndaku
Lionel : Vraiment na sepeli nazela gloria kasi

Fabrice : sava ngape na bimi nanu mukie
Lionel : okomi kosala ?
Fabrice : te nake nanga chez masta nanga moko
Lionel : sava kasi zua ata 5000fc kasi ofuta ata transport kasi
Fabrice : merci beaucoup vraiment
Lionel : pas de problème

***Fabrice abimi akeyi

Gloria : mon amour déjà oyaki ?
Lionel : oui nayaki déjà
Gloria : mais pourquoi osalaki nga signe te kasi
Lionel : nazalaki na grand frère nayo ayebisaki nga que ozo lata bilamba
Gloria : oui na bandaki ko lata kasi to kota omona maman kasi

***Lionel na gloria ba koti na ndaku

Lionel : maman boni yo ?
Naomi : mukie mukie kaka
Lionel : sikoyo ozuaki ata calment te
Naomi : nazuaki yango omoni na lali mua bien
Lionel : sava kasi yango naye awa pona to kende kozua ba résultats yango na gloria comme ça na meka un peu ko bunda lelo pona na somba ba kisi

Naomi : merci beaucoup vraiment nayebi te soki to lingaki to banda wapi soki to zeli kaka fabrice azela ti jour ako lia soki pe na winner

Lionel : eza grave te maman posa nanga eza que il faut ozala na santé moko kitoko
Naomi : merci beaucoup na nionso ozo sala pona biso vraiment

Au moment où bazo solola téléphone ya lionel ésonne

Lionel: bo limbisi na yamba appel
Naomi : problème te

***Lionel ayambi appel

Lionel : allô
______: allô oza wapi eza chris
Lionel : naza chez ba gloria
Chris : yaka mbangu awa musala moko eza awa ezo senga kaka yo il faut ozala
Lionel : sava nazoya kaka sikoyo kasi nazua moto
Chris : sala show

Appel off

Lionel : gloria ba bengi nga mbangu na kende kosala musala moko kuna ezo senga kaka nga yo kende kaka kozua ba résultats après oyela nga ngo kuna na garage où bien benga nga kaka na téléphone oyebisa nga montant ya ba kisi yango soki otuni ba prix na pharmacie

Gloria : sava kasi to kende kaka nzela moko kasi
Lionel : sava maman simba ata 5$ oyo kasi nake nanu ko luka mbongo
Naomi : merci beaucoup nzambe apambola yo kasi
Lionel : amen maman na soir kaka
Gloria : maman nazoya

***Lionel na gloria ba keyi

****Quelques minutes lionel akomi na garage

Chris : lionel musala moko eza awa mère oyo aza na besoin ba bokisela ye frein ezo simba te
Lionel : kaka frein ?
Chris : oui
Lionel : sikoyo atie combien ?

Chris : nga nanu na sololi naye te
Lionel: sava na solola naye kasi

Lionel : bonjour mère boss
______: bonjour, kombo nanga eza maman nadage naza boss te
Lionel : désolé maman nadege olobi voiture nayo eza na problème ya frein ?

Nadege : oui
Lionel : sava nako sala ngo mais il faut opesa biso 70$
Nadege : naza kaka na 50$
Lionel : te maman eza mukie tia kaka ata 60$ kasi
Nadege: sava kasi sala mais sala yango mbangu parce que nazo kende kozua muana nanga na aéroport naza déjà na re**rd
Lionel : sava nazo sala ngo mbangu kasi

Lionel abandi kosala musala

Nadege aza na muana naye na Belgique kombo naye archile donc archile azo wuta Belgique azoya

Chez lionel

Jorna : maman yaya apesaki yo mbongo ya wenze ?
Dina : oui apesaki nga lelo lisusu oke classe te ?
Jorna : mais yaya apesi nga mbongo te alobi na zela ye na soir soki azongi mais nga nakomi nanga ko lemba

Dina : ba kendaka kaka peut-être pe bako benga nayo te
Jorna : maman jour wana na kendaki ba bengani nga na kende lisusu ata yo moko nakomi ko yoka soni

Dina : kanga kaka motema
Jorna : maman kala te tokosala dissertation mais nanu na futi mbongo te
Dina : zela na soir peut-être ako pesa yo
Jorna : maman nga soki kaka yaya apesi nga te nako kende lisusu te
Dina : ko loba bongo te eza pona avenir nayo
Jorna : maman nga nakomi ko lemba nanga yaya azalaki boye te a changé makasi
Dina : tika makambu wana zua mbongo okende wenze

***L'autre côté lionel asilisaki musala

Lionel : chris yo zua kaka 10$ oyo nga naza na makambu ebele na mutu
Chris : merci, makambu nini lisusu ?

Lionel : maman ya ba gloria azo bela omoni te ndenge gloria abengi nga kaka sikoyo alobi que mbongo ya ba kisi esali 40$ mais il faut pe na pesa petite soeur nanga 50$ pona afuta minerval nayebi te soki nako pesa nani na tika nani

Chris : yango nde olobi oza na makambu ebele ?
Lionel : mais oui
Chris : masta eza simple pesa leki nayo mbongo afuta minerval
Lionel : makambu nini ozo loba wana donc na tika mutu azo bela ?

Chris : mais oui mon frère ndeko nayo aza ndeko nayo lelo soki abongi na vie ako sunga yo peut-être famille ya muasi nayo ndenge ozo sunga bango un jour bako wangana nayo pesa leki nayo mbongo en plus aza na 6eme

Lionel : nakomi na confusion vraiment

___________ A SUIVRE ÉPISODE : 3

TIA J'AIME PE COMMENTÉ PHOTO KO BOSANA KO PARTAGE TE

Vous voulez que votre entreprise soit Salon De Beauté la plus cotée à Kisangani ?
Cliquez ici pour réclamer votre Listage Commercial.

Téléphone

Site Web

Adresse

Boyoma
Kisangani
LUNDI